Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.
Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ?
basalaki vwale mpe bendele na yo na elamba ya lino ya kitoko oyo ewutaki na Ejipito, mpe batongaki bililingi kati na yango ; bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, ewutaki na bisanga ya Elisha.
Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »