1 Bakonzi 10:22 - Mokanda na Bomoi22 Mpe mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kosala mombongo na ebale monene elongo na bamasuwa ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga longwa na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « paoni. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.