1 Bakonzi 10:21 - Mokanda na Bomoi21 Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele ; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.