1 Bakonzi 10:2 - Mokanda na Bomoi2 ayaki na Yelusalemi elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.
Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :