Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 10:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; asalaki na yango mpe mandanda mpe makembe. Mabaya ya santale etikala lisusu koya te, mpe batikala lisusu komona yango te kino na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 10:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.


Masuwa ya Irami oyo ememaki wolo wuta na Ofiri ememaki mpe mabaya ebele ya santale mpe mabanga ya talo.


Na ngambo na ye, mokonzi Salomo mpe apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki ; apesaki ye lisusu bakado oyo kaka mokonzi lokola Salomo akokaki kopesa. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye.


Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »


Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi, banzenze mpe mandanda mpo na bayembi. Batikalaki nanu komona nyonso wana te kati na mokili ya Yuda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ