Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 10:11 - Mokanda na Bomoi

11 Masuwa ya Irami oyo ememaki wolo wuta na Ofiri ememaki mpe mabaya ebele ya santale mpe mabanga ya talo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 10:11
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; asalaki na yango mpe mandanda mpe makembe. Mabaya ya santale etikala lisusu koya te, mpe batikala lisusu komona yango te kino na mokolo ya lelo.


Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.


Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo,


bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko.


Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.


Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ;


Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli ; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ