Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.
Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye : — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya ? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai ; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya !
Davidi alobaki na bato na ye : « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. » Joabi, mwana mobali ya Tseruya, atelemaki moto ya liboso mpo na kobundisa bato ya Yebusi mpe akomaki mokonzi ya liboso ya mampinga.