Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:52 - Mokanda na Bomoi

52 Salomo azongisaki : — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele ; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:52
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.


Bayebisaki Salomo : — Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi : « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. »


Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye : — Zonga na ndako na yo.


Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.


Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.


Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.


Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.


kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga.


Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.


Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ