Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:50 - Mokanda na Bomoi

50 Kasi mpo ete Adoniya abangaki Salomo, akendeki kokanga maseke ya etumbelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:50
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye.


Bayebisaki Salomo : — Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi : « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. »


Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo.


Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.


Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.


Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe okobamba bronze na etumbelo.


Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.


Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe abambaki bronze na etumbelo.


Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ