Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:40 - Mokanda na Bomoi

40 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye ; mabele eninganaki na makelele na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:40
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki : — Makelele wana kati na engumba elakisi nini ?


Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bapakoli ye mafuta, na etima ya Giyoni, mpo ete akoma mokonzi. Wuta na Giyoni, bagangi na esengo, mpe engumba mobimba esepeli na likambo yango. Yango nde makelele oyo bozali koyoka.


Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »


Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.


Yawe azali kokonza ! Tika ete mabele esepela ; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !


« Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule, bosengeli kofukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisi.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.


Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.


Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ