4 Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi, akomaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye ; kasi mokonzi atikalaki te kosangisa na ye nzoto.
Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.
Boye, balukaki kati na Isalaele mobimba elenge mwasi moko ya kitoko ; bamonaki Abishagi, moto ya mboka Sunami, mpe bamemaki ye epai ya mokonzi.
Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.
Adoniya alobaki : — Nabondeli yo, loba na mokonzi Salomo ete apesa ngai Abishagi, moto ya Sunami, mpo ete akoma mwasi na ngai, pamba te mokonzi akoki koboya te koyokela yo.
Batisheba alobaki : — Tika ete Abishagi, moto ya Sunami, akoma mwasi ya Adoniya, ndeko na yo ya mobali.
Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.