Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:39 - Mokanda na Bomoi

39 Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:39
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye ; mabele eninganaki na makelele na bango.


Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.


Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »


Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »


Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.


Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »


Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi ; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.


Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »


atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo ; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita !


Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli : « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai ;


Okosala na yango ansa ya solo kitoko oyo esalemi na moto oyo asalaka malasi. Ekozala malasi oyo ezali na mungwa, ya peto mpe ya bule.


Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ