Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:38 - Mokanda na Bomoi

38 Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:38
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.


Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.


Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.


Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.


mokonzi alobaki na bango : — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni !


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.


Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.


Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti ! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino : « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ