Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:37 - Mokanda na Bomoi

37 Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:37
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi : — Amen ! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo.


basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo : « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo ! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye,


Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki : — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.


Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.


Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.


Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.


Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.


Akobelela ngai boye : ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai ! ›


Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !


Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.


wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ