Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:31 - Mokanda na Bomoi

31 Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi ; alobaki : — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.


Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »


kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?


Bakalaka nyonso oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bakomaki kofukama mpe kopesa Amani lokumu, pamba te mokonzi atindaki ete basala bongo mpo na ye. Kasi Maridoshe azalaki kofukamela ye te mpe azalaki kopesa ye lokumu te.


Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko ! Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.


Balobaki na mokonzi Nabukodonozori : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko !


Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti ; alobaki : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela !


Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa : — Daniele, mosali na Nzambe na bomoi ! Boni, Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, alongi kokangola yo na minoko ya bankosi ?


Boye, bato yango balobaki : — Tokotikala komona likambo ata moko te ya kofundela moto oyo, Daniele ; loba nde toluka yango kati na mobeko ya Nzambe na ye.


Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai ! »


Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.


Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ?


Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.


Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ