Boye, basali ya Davidi balobaki na ye : « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye ; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto ! »
Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !
Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.