Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo : — Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:29
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !


Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !


Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti : — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso


Mokonzi Davidi alobaki : — Bobengela ngai Batisheba. Batisheba ayaki pene ya mokonzi mpe atelemaki liboso na ye.


Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.


Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.


Kasi mama ya mwana alobaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.


Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


Akangolaki biso wuta na maboko ya banguna na biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.


akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye.


Jedeon alobaki na bango lisusu : — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te.


Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.


Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.


Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »


Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye : « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba : « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ