Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.


mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.


Kasi abengisaki te mosakoli Natan, Benaya, bakengeli ya mokonzi mpe Salomo, ndeko na ye ya mobali.


Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme ; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari ; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo.


Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi ? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo ?


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ