Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.
Wana nazalaki koloba mpe kosambela, kotubela masumu na ngai mpe ya bato na ngai, Isalaele, mpe kobondela Yawe, Nzambe na ngai, mpo na bolamu ya ngomba ya bule ya Nzambe na ngai ;