Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.


Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali.


Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai.


Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki.


Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.


Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.


Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya bokonzi ya ndako ya Yuda.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ