20 Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai.
Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme ; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari ; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo.
Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »
Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu.
Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.