Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi ; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »


Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo : — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ?


Batisheba azongisaki : — Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba : « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. »


Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme ; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari ; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo.


Bongo, Natan alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai ; boni, olobaki ete Adoniya akokitana na yo mpe akovanda na kiti na yo ya bokonzi ?


Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi ? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo ?


Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.


Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ