Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 Batisheba azongisaki : — Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba : « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:17
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »


Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo : ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi ? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi ? »


Wana okozala nanu koloba na mokonzi, ngai mpe nakokota mpe nakobeta sete na maloba na yo.


Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi ; mpe mokonzi atunaki ye : — Boni, olingi nini ?


Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi ; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te !


nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi.


lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai. » Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ