Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 1:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota.


Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.


Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei :


Batisheba akendeki kotala mokonzi kati na shambre. Mokonzi akomaki mobange makasi, mpe Abishagi, moto ya Sunami, azalaki kobatela ye.


Boye, basali ya Davidi balobaki na ye : « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye ; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto ! »


Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele.


Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi ; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.


Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bayokaka moto ; kasi moto oyo azali ye moko, ndenge nini akoki koyoka moto ?


Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.


Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ