1 Bakolinto 9:9 - Mokanda na Bomoi9 Solo, ekomama kati na mobeko ya Moyize : « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma. » Boni, bokanisi ete Nzambe azalaki nde komitungisa mpo na bangombe ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.