7 Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko ? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te ? Nani abatelaka etonga mpo amela miliki na yango te ?
Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma ; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye.
Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele.
Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;