Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tala eyano na ngai epai ya bato oyo basambisaka ngai :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


— Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.


Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.


Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo.


Soki, mpo na bato mosusu, nazali ntoma te, kasi mpo na bino, nazali solo ntoma, pamba te bino bozali kashe ya bontoma na ngai kati na Nkolo.


Boni, tozangi makoki ya kolia mpe ya komela ?


Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.


lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai ; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.


Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.


Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te : bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko.


Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.


Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ