Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:26 - Mokanda na Bomoi

26 Yango wana ngai, nazali kopota mbangu na bozoba te, nazali kobeta makofi bibetabeta te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:26
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.


— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.


Ezali mpe ndenge moko mpo na bino : soki na minoko na bino, bozali kaka koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki penza koyeba makambo oyo bozali koloba ? Wana, bokoloba na pamba.


Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.


Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.


Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.


Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.


Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai ; mpe kokufa ezali litomba.


Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu : akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.


Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.


Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.


Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli.


Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.


Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.


Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ