Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:22
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.


Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda.


Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.


Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !


Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu.


Solo, atako nazali nsomi na miso ya bato nyonso, kasi namikomisa mowumbu ya bato nyonso, mpo ete namema bato ebele koleka epai ya Yesu-Klisto.


Mpe nasalaka makambo wana nyonso mpo na Sango Malamu, mpo ete ngai mpe nazwa mapamboli na ngai kati na yango.


Nani oyo alembi, bongo ngai nalemba nzoto te ? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te ?


Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ