Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Solo, atako nazali nsomi na miso ya bato nyonso, kasi namikomisa mowumbu ya bato nyonso, mpo ete namema bato ebele koleka epai ya Yesu-Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:19
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.


Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.


Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba.


na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !


Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai ?


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !


Boni, nazali nsomi te ? Nazali ntoma te ? Namona te Yesu, Nkolo na biso ? Bozali mbuma ya mosala na ngai te kati na Nkolo ?


Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.


Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.


Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.


Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.


Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.


Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ