Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:14 - Mokanda na Bomoi

14 Ndenge moko mpe, Nkolo apesaki mitindo ete bato oyo bateyaka Sango Malamu babika bomoi na bango na nzela ya Sango Malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:14
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.


Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino,


mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango.


Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.


Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba ?


Soki bato mosusu bazali kosalela makoki wana ya kozwa biloko epai na bino, tosengeli te, biso, kosalela yango koleka ? Nzokande, tosalelaki makoki yango te, tokangaka kaka motema na makambo nyonso, mpo ete tozala epekiselo te liboso ya Sango Malamu ya Klisto.


Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !


Boni, tozangi makoki ya kolia mpe ya komela ?


Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, Nkolo afungolelaki ngai bikuke mpo ete nakoka kosala mosala na ngai.


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino kaka na maloba te, kasi mpe na nguya, na Molimo Mosantu mpe na kondima monene. Mpe boyebi malamu ndenge nini tozalaki kovanda kati na bino mpo na bolamu na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ