Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 9:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 9:11
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! »


Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda.


Ndenge moko mpe, Nkolo apesaki mitindo ete bato oyo bateyaka Sango Malamu babika bomoi na bango na nzela ya Sango Malamu.


Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya Nzambe ya sembo. Kasi suka na bango ekozala kolanda misala na bango.


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ