Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako ; atielaki Saulo maboko na koloba : — Ndeko na ngai, Saulo ; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.
Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai ?
Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.
Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.