Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Solo, ezali na bikelamu ebele oyo ebengami banzambe, ezala na likolo to na mabele ; yango nde esalaka ete banzambe mpe bankolo bazala ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 8:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka ! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.


Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.


Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?


Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,


Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ