Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Pamba te soki moko kati na bato oyo balenda te kati na kondima amoni yo, yo oyo ozali na boyebi, ozali kolia kati na tempelo ya banzambe ya bikeko, boni, motema na ye ekozanga solo kotindika ye mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 8:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba oyo bazwi na ndanga ; mpe kati na ndako ya nzambe na bango, bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.


Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango.


Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.


Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye ; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.


Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te ; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana ; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.


Kasi bosala keba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na bato oyo balenda te kati na kondima.


Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ