1 Bakolinto 8:1 - Mokanda na Bomoi1 Mpo na oyo etali misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete biso nyonso tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na bato ya bikolo ya bapaya oyo bakomi bandimi, tokomeli bango mikano na biso ete basengeli te kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basengeli te komela makila, basengeli te kolia nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, basengeli te kosala kindumba ya lolenge nyonso.
Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te ; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana ; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.