Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te.


Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.


Kasi soki mpe obali, osali lisumu te ; soki moseka abali, asali lisumu te. Nzokande, bato oyo babala bakokutana na pasi mingi kati na bomoi na bango ; mpe ngai, nalingi nde kosunga bino mpo bokutana na pasi yango te.


Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mwasi mobandami na ye na libala, soki akanisi kosangisa na ye nzoto mpe ete asengeli kaka kosala bongo, wana bazali kotambola kati na likanisi ya kobalana, tika ete asala kolanda posa na ye, azali kosala lisumu te. Tika ete babalana !


Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto.


moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,


Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali ; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ