7 Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai ; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe : moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana.
Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai.
Kasi ngai, nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo ; pamba te nakosepela kutu kokufa na esika ete moto mosusu abebisa tina ya lokumu na ngai.