Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize alobaki na bango : — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.


Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala.


Bosangisa bato, bobulisa mayangani, bosangisa bakambi mpe bana, ezala oyo bazali nanu komela mabele. Tika ete elenge mobali oyo abali sika atika shambre na ye ya libala, mpe elenge mwasi oyo abali sika atika mpe shambre na ye ya libala.


mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli : — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ?


Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]


Yesu azongiselaki bango : — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.


Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.


Mpo na yango, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natindaki Timote mpo na koluka koyeba soki bozali kaka kokoba kati na kondima. Nazalaki kobanga ete Satana ameka bino mpe ete mosala na biso ekende pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ