Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino ; ezali te mpo na kotiela bino motambo, kasi ezali nde mpo ete bosala oyo ezali malamu koleka mpe bomipesa mobimba na Nkolo.
Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai.
Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.
lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai ; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.
Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino : na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.