Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:35 - Mokanda na Bomoi

35 Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino ; ezali te mpo na kotiela bino motambo, kasi ezali nde mpo ete bosala oyo ezali malamu koleka mpe bomipesa mobimba na Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:35
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !


Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.


Kasi soki mpe obali, osali lisumu te ; soki moseka abali, asali lisumu te. Nzokande, bato oyo babala bakokutana na pasi mingi kati na bomoi na bango ; mpe ngai, nalingi nde kosunga bino mpo bokutana na pasi yango te.


Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mwasi mobandami na ye na libala, soki akanisi kosangisa na ye nzoto mpe ete asengeli kaka kosala bongo, wana bazali kotambola kati na likanisi ya kobalana, tika ete asala kolanda posa na ye, azali kosala lisumu te. Tika ete babalana !


Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.


Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.


mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,


Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ