Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:32 - Mokanda na Bomoi

32 Nalingi ete bomitungisaka te. Mobali oyo azali ya kobala te atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo, alukaka ndenge nini kosepelisa Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:32
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.


Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.


kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.


Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.


Mobali oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mwasi na ye,


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ