Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:31 - Mokanda na Bomoi

31 tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te ; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:31
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.


Eleko moko eleki, mpe eleko mosusu eyei, kasi mabele etikalaka kaka seko na seko.


Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Bandeko na ngai, nazali koloba boye : tango ekomi moke ; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te ;


tika ete bato oyo bazali kolela bazala lokola nde bazali kolela te ; tika ete ba-oyo bazali kosepela bazala lokola nde bazali kosepela te ; tika ete ba-oyo bazali kosomba bazala lokola nde bazali na eloko te ;


Bongo lifuti na ngai ezali penza nini ? Ezali nde kokaba na ofele Sango Malamu oyo nazali koteya, na kozanga kozwa lifuti oyo Sango Malamu yango epesi ngai.


Maloba oyo « na mbala oyo lisusu » elakisi ete biloko oyo ekoki koningana elimwe mpo ete oyo eninganaka te etikala mpo na libela.


Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?


Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,


Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.


Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ