Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:30 - Mokanda na Bomoi

30 tika ete bato oyo bazali kolela bazala lokola nde bazali kolela te ; tika ete ba-oyo bazali kosepela bazala lokola nde bazali kosepela te ; tika ete ba-oyo bazali kosomba bazala lokola nde bazali na eloko te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:30
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.


tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.


Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda ! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka !


Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !


Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.


Bandeko na ngai, nazali koloba boye : tango ekomi moke ; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te ;


tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te ; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka !


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ