Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te ; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.
Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »