Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te ; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:19
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.


Nzokande, ezali bilei te nde ememaka biso pene ya Nzambe ; soki tolie yango te, tokobungisa eloko moko te ; soki mpe tolie yango, tokozwa eloko moko te.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te nde ezali na tina ; likambo ya tina ezali : kokoma ekelamu ya sika.


Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.


Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga ; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te.


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ