Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:18 - Mokanda na Bomoi

18 Boni, moto moko azalaki akatama ngenga tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga ! Boni, moto moko azalaki akatama ngenga te tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, tala likanisi na ngai : Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe.


Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.


Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo :


Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba : — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.


Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda.


Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ