Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:17 - Mokanda na Bomoi

17 Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:17
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !


Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.


Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.


Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.


Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,


Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.


Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.


Boni, moto moko azalaki akatama ngenga tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga ! Boni, moto moko azalaki akatama ngenga te tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga te !


Bandeko, tika ete moko na moko awumela, na miso ya Nzambe ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye !


Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai ; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe : moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana.


Longola makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo ezalaki : komitungisa na tina na Mangomba nyonso.


Elongo na ye, tozali kotinda ndeko oyo Mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu.


Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te,


Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.


Mpe kati na Mangomba ya Nzambe, tozali komikumisa na tina na molende mpe kondima na bino kati na minyoko nyonso mpe kati na pasi oyo bozali komona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ