16 Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !
Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi, mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye.
Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.
na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.