11 kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.